Nzambe ba sakanaka na ye te.
Lokuta eza elembo, que ozalaka mosali ya satana. Soki boyebaki te, boyeba lelo, mutu akosaka mingi to muke, azalaka ndoki. (Batu ya mitema mabe, Keto, batu ya mitema e pola, ba ingrat).
Lokuta eza lokuta. Satana, plan na ye ezalaka simple: "Ko bebisa vie na yo, ko boma yo, pe ko yiba destin na yo." Batu ya lokuta, ba lakisaka bango minu te.
Nga, na yinaka bango neti na yinaka satana. Nzambe a pardonaka satana te, a bwakisaka ye. Nga pe naza na character ya papa na nga nzambe. Na bwakisaka mutu nioso ya lokuta.
Batu ya lokuta mingi ba batamaka na sima ya ba activite religieux ou ya bokoko, kasi ba yebaka nzambe te. Lelo bako zala ba chrétien ya egliseya reveille, lobi ba komi ba musilma, après lobi ba Catholic, lobi kuna bo koko etc. Mutu a zalaka associe na ba religions ebele boye, ezalaka première de sign, nzambe aza na bango te.
Nzambe azalaka molimo, nioso a salaka na biso ezalaka pe na molimo, na bomoto te. Changaka ata ba eglise na bo ndimi moko.
Makambu na komi, eza pona ko lakisa mingi, ndenge ya ko yeba ba sali ya satana. To yebaka bango, kasi bango ba yebaka te tozalaka ya nzambe. Tangu ba mekaka biso, pe bazwaka biso te,
bakomaka ko tuna mituna.
Yeba ndenge nini ya ko tambwisa buania na bango. Bazalaka na miso ya ko yeba makambu te neti ba biso oyo to tambolaka na nzambe.
Lokuta, ezali elembo oyo ezo lakisa oza ya satana. Lokuta ya muke, na ya munene ezalaka te. Lokuta eza Lokuta mpe eza mabe. Mutu nioso akosa nga Niina, nzambe a exposa bango. Nzambe aza fidèle, a lingaka te mabe e vanda pene ya bana na ye. Na yebi makambu oyo po nazalaka na kati na bomoko na nzambe.
Bomoyi eza nzela moko. Tangu oleki esika, nzambe a longolaka nzela wana pona ozonga sima te. Soki olekaki esika mabe, kende kaka liboso, po nzela oyo eko zongisa yo, na nzela malamu eza liboso na yo, na sima na yo, nzela ezalisusu te.
Ba kendeke liboso. Mingi ba zonga sima, ba kufa, ba beba, pe ba destin na bango ba yiba.
Tata Nzambe a batela bino ndenge a batelaka nga na bana na nga.
Comentários